Nsango malamu ya Eklezia ya Nzambe, oyo ebandaki na esika moke lokola ndako ya likolo ya Marko, ekoli na nse ya lipamboli mpe bokambi ya Nzambe Ahnsahnghong mpe Nzambe Mama mpe ekomi sikawa lingomba ya mokili mobimba oyo epalanganisi nsango malamu na mokili mobimba.
Soki tomipesi na makanisi mpe na bomoi oyo ezali kobuka mokano ya Nzambe, tokoki ata moke te kozala na bomengo. Bayisalaele basalaki masumu na kotiyaka ntembe na nguya ya Nzambe ata nsima ya komona makamwisi na Ye ebele, kasi soki tozali kopesa motuya na Nzambe oyo asalisaka biso ntango nyonso, tokozwa mapamboli ebele.
Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo. Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo. Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo. Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ; bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo. Yobo 22:21–25
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy