Ntina oyo basantu ya Eklezia ya liboso bazalaki na bondimi monene atako minyoko mpe mikakatano ebele ezalaki mpo ete basosolaki bolingo monene ya Klisto na nzela ya mbeka na Ye na ekulusu mpe kondimana ya sika mpe basakolaki nsango malamu, ntango nyonso kobombaka elikia mpo na bokonzi ya seko ya lola na mitema na bango.
Oyo azali kokokisa nsango malamu mpo na bosepeli na ye moko na pete akomi kolemba mpe kotika noki, kasi ntango tozali kokokisa mosala ya nsango malamu, kososolaka mobimba ete Tata Klisto Ahnsahnghong mpe Nzambe Mama bamemaka masumu na biso nyonso, totondi na esengo mpe na elikia, kaka lokola Ntoma Polo azalaki.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Yoane 3:16
Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ?
banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Baloma 8:35–39
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy